
Ozali Elonga
(Sandra Mbuyi)
Eh eh
Yawhe na nga oh oh oh
1. Y’ozali posa oyo esilaka te, y’onde osilisa ba posa nyoso ya mokili (2 fois)
Y’ozali makasi na nga tango nalembi, y’onde osilisa mayele ya moyini satana
Y’ozali makasi, moto ya makasi na nga eh, y’obundela nga bitumba oyo na yebi moto na makolo te
Nakolala na kimia nako kolamuka pe na kimia, Po na yebi yo mobundi molongi (2 fois)
Refrain:
Y’ozali elonga, y’ozali elonga na ngai (2 fois)
Eh Yawhe ehe heheh
2. Nazali wolo oyo eleki na moto Bolingo na yo elongoli mbindo na bomoyi na ngai (2 fois)
Je suis surprise par tes bontés dans ma vie, Yawhe ongengisi bomoyi na nga na bolingo na yo
Je suis surprise, par tes bontés, Yawhe ongengisi bomoyi na nga na bolingo na yo
Refrain:
Y’ozali bolingo, y’ozali bolingo na ngai (2 fois)
3. Lipamboli na nga tango maloba ebimi te
Eyokani na yo yo mokeli na nyoso
Y’ozela te na senga po y’opesa ngai
Yawhe moyanoli ya ba posa ya motema na nga
Y’ozela te na linga yo po y’olinga ngai
Yawhe bolingo ya motema na ngai
Y’ozela te na senga yo po yo pambola ngai
Yawhe moyanoli ya ba posa ya motema na nga
Refrain:
Y’ozali eyano, y’ozali eyano na ngai (2 fois)