
Dieu de difference
(Ira Blessing Bawunza)
Ozali nzambe (3 fois)
Yawhe ozali nzambe (amen) ozali nzambe (amen) ozali nzambe (amen)
Alleluia amen
1. Likolo kuna esika ozali engengi nyoso
Awa y’oponi motema na ngai, tika na ngenga Yawhe
Loboko ekatisaka bibale eza yayo Yesu, loboko ekotaka ti na motema ah eza ya yo Yesu, liloba nanu ebimi na monoko te oyebi nyoso, bitumba oyo nga nanu na bundi te dejà y’opesi elonga, yango nako yembi
Refrain:
Alleluia, amen (Ira: Yawhe oh) alleluia , alleluia ,amen
(Ira: pasi na ngai esengi nani eh) nzambe, nzambe eee alleluia amen
(Ira: Pasi na ngai ezo senga nani eh) nzambe, nzambe eh alleluia amen
2. Nzambe na nga nzambe ya bokeseni, oyebi nyoso, obandaka esika moto asukeli po ayemba nzembo, esika nazo kende déjà y’owuti kuna obongisi nyoso, nzube ya nzela otié na moto na tamboli na assurance, elongi ya Mose engala Lokola libende batié na moto, po asololaki na Yawhe ebongo nga moto na memi yo na nzoto na ngenga te ndende nini?
Refrain:
Retour
3. Nzambe oyo asalaka makambo yako zanga toli oyebi nyoso, ozalaka na posa te babetela yo lisoso po oyeba vie ya moto, nani abelela yo asabwa eh, nani alanda yo abunga eh, nani atiéla yo motema ayoka soni esalema wapi, nzambe na ngai nzambe ya bokeseni, nzambe ya différence Yesu, bokeseni Yesu eh, salela nga ngai makambo ya bokeseni ekoma lisolo ya kobeta, na kelasi to na mosala ekoma temoignage, avenue na nga bayoka sango, famille na nga bayoka sanga, nzambe na nga asali ya bokeseni etikala sango, il est vivant Jésus, Lokola aza vivant ako sala kaka Yesu, aza na nyoso nzambe na ngai, soki aza na nyoso nga pe naza na nyoso kati naye
Lelele leli (3foix)
Nzambe oyo sunga eh
Refrain :
Nzambe, nzambe eh alleluia amen
Commentaire : Elombe Yesu nzambe ya ba cas compliquer, célibat to masque de vieilleuse esengi nani eh, esengi nganga kisi te, tata muasi akok’eloko te,
Esika nako sukela nani akokoma eh, nzambe azanga delo, nzambe aleki moto na nyoso
Lisolo ya vie na ngai nani akoma yango, nani akoki kotia point ebongo moto aloba nini eh
Yoka nzenga, nzenga mambu Yesu oyo, nzenga mambu Yesu oyo
nzenga mambu Yesu oyo